Phrase

Lyrics - Phrase

Papa Wemba

Date : 3 Mars 1999

Papa Wemba Papa Wemba Artist musicien

Paroles de la musique Phrase

[Intro]
Love
Tous les jours kaka maloba Ya love
Kasi lelo yoka phrase ango hein

[Refrain]
Soki yo te nde l'amour nanga ekoma ndeti phrase etonda ba faute ebelé
Soki yo te nde l'amour nanga ekoma ndeti phrase etonda ba faute ebelé

[Couplet 1]
Ya solo tokomi mosika
Kasi nzela eza nanu molayi
Ngomba moko te ezali
Soki omati omoni l'avenir

Elongi ekoki kobomba bolingo
Kasi ekobomba mawa te.
Libanga ata ezali kitoko
Ekoki koleka diamant Ya défaut na valeur te.
Po yo babotakiyo na liki
Ozalaka na posa Ya libele Ya maman te
Oui! C'est vrai

Bolingo na biso evandaka nango mboka moko te na bolingo
Mwana po ayeba abimi minu akomeka koswa libele Ya maman
Jamais akoswa mosapi naye rosa
Totika komiswa mitema
Bomengo bazela bazua te oh
Ezalaka jamais na rendez-vous

Lokuta Ya mbongo
Etindaka moto akanisa ete liwa ezali se po Ya babola

Moto ya bolingo na kombo nayo ebandaka kati Ya motema nanga
Kasi jamais ekozikisa un jour
Kombo na yo
Maria rosa nayembi lisusu bibi
Tokende libala
Malembe malembe maman

Nkasi soki okweyi eh
Na nzete bapesaka faute se na mopepe nandimi mabe nanga

[Chœur]
Tozingi maboko
Tokitisa mitema
Bomengo nioso wana
Tozingi maboko
Tokitisa mitema
Bomengo nioso wana

[Couplet 2]
Mvula epanzaka se ba feti
Kasi wenze te mukarame
Ata bafingi tokota ata na wenze
Tovanda ata naba intempéries
Mvula moke ekokolisela nga Ya makasi keba maria rosa ekoboma ndunda nabiso

Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala nabiso

Rosa tala bango okomona
Elongi Ya bolingo nabiso

Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala nabiso

Julie mukuna eh abota julio na sana

Bana baboteli biso ba koko
Bango nde talatala na biso

[Refrain]
Soki yo te nde l'amour nanga ekoma ndeti phrase etonda ba faute ebelé
Soki yo te nde l'amour nanga ekoma ndeti phrase etonda ba faute ebele!!